3 Mpe mokonzi alobaki lisusu ete: “Ezali lisusu na moto moko te ya ndako ya Saulo mpo namonisela ye motema boboto ya Nzambe?”+ Na yango, Ziba alobaki na mokonzi boye: “Ezali naino na mwana mobali moko ya Yonatane oyo azali motɛngumi.”+
7 Mpe Davidi alobaki na ye lisusu boye: “Kobanga te, mpo nakozanga te komonisela yo motema boboto+ mpo na tata na yo Yonatane;+ mpe nasengeli kozongisela yo bilanga nyonso+ ya nkɔkɔ na yo Saulo, mpe yo, okolya limpa na mesa na ngai ntango nyonso.”+