1 Samwele 19:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Mpe atyaki molimo na ye na likama+ mpe abomaki Mofilistia wana,+ bongo Yehova apesaki Yisraele mobimba lobiko moko monene.+ Omonaki yango, mpe osepelaki. Bongo mpo na nini okosalela makila ya moto oyo azali na likambo te lisumu na ndenge okobomisa+ Davidi mpamba?”+ Nzembo 69:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba bakómi kutu mingi koleka nsuki ya motó na ngai.+Baoyo bazali kokanga ngai monɔkɔ, baoyo bazali banguna na ngai kaka mpamba, bakómi ebele.+Bongo eloko oyo nayibaki te, nazalaki kozongisa yango. Masese 17:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso,+ mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.+ Masese 18:24 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 24 Baninga mosusu balukaka kosalana mabe,+ kasi moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.+
5 Mpe atyaki molimo na ye na likama+ mpe abomaki Mofilistia wana,+ bongo Yehova apesaki Yisraele mobimba lobiko moko monene.+ Omonaki yango, mpe osepelaki. Bongo mpo na nini okosalela makila ya moto oyo azali na likambo te lisumu na ndenge okobomisa+ Davidi mpamba?”+
4 Baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba bakómi kutu mingi koleka nsuki ya motó na ngai.+Baoyo bazali kokanga ngai monɔkɔ, baoyo bazali banguna na ngai kaka mpamba, bakómi ebele.+Bongo eloko oyo nayibaki te, nazalaki kozongisa yango.