Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 11:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Baanakime batikalaki lisusu te na mokili ya bana ya Yisraele. Kaka na Gaza,+ na Gate+ mpe na Ashedode+ nde batikalaki.+

  • 1 Samwele 5:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Na yango, batindaki bato mpe bayanganisaki bankolo nyonso ya lisangani ya Bafilistia epai na bango mpe balobaki boye: “Tokosala nini na sanduku ya Nzambe ya Yisraele?” Nsukansuka, balobaki ete: “Sanduku ya Nzambe ya Yisraele eleka tii na Gate.”+ Bongo bamemaki sanduku ya Nzambe ya Yisraele tii kuna.

  • 1 Samwele 17:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe elombe moko mobundi abandaki kobima na bakaa ya Bafilistia, nkombo na ye Goliate,+ autaki na Gate,+ molai na ye ezalaki mapeko motoba bakisá zerete moko.+

  • 1 Samwele 27:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bongo Davidi atɛlɛmaki, mpe ye ná bato nkama motoba (600)+ oyo bazalaki elongo na ye bakatisaki epai ya Akishe+ mwana ya Maoke, mokonzi ya Gate.

  • 1 Bakonzi 2:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Mpe esalemaki boye: na nsuka ya mbula misato, baombo+ mibale ya Shimei bakimaki epai ya Akishe+ mwana ya Maaka mokonzi ya Gate;+ mpe bato bayaki koyebisa Shimei ete: “Talá! Baombo na yo bazali na Gate.”

  • 2 Bakonzi 12:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na ntango yango nde Hazaele+ mokonzi ya Siri amataki mpe abundisaki Gate+ mpe azwaki yango; nsima na yango, Hazaele abalusaki elongi+ na ye mpo na komata mpe kobundisa Yerusaleme.+

  • Nzembo 56:maloba ya ebandeli ya loyembo-13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo mpo na Ebenga oyo efandi nyɛɛ na kati ya baoyo bazali mosika. Ya Davidi. Mikitame. Ntango Bafilistia bakangaki ye na Gate.+

      56 Ee Nzambe, moniselá ngai boboto, mpo moto​—mowei mpamba​—aswi ngai.+

      Azali kobunda mokolo mobimba, azali kaka konyokola ngai.+

       2 Banguna na ngai bazali kaka koswa ngai mokolo mobimba,+

      Mpo baoyo bazali kobunda na ngai na lofundo bazali mingi.+

       3 Ezala mokolo nini nakobanga, ngai, ɛɛ ngai, nakotyela yo motema.+

       4 Lokola nazali na bomoko na Nzambe, nakosanzola liloba na ye.+

      Natyeli Nzambe motema na ngai; nakobanga te.+

      Moto* akoki kosala ngai nini?+

       5 Mokolo mobimba bazali kaka kobebisa makambo na ngai;

      Makanisi nyonso na bango ezali mpo na kosala ngai mabe.+

       6 Bazali kobunda, bazali komibomba,+

      Bango, ɛɛ bango, bazali kaka kotala makolo na ngai,+

      Wana bazeli molimo na ngai.+

       7 Mpo na misala na bango oyo eyokisaka mpasi, bwaká bango.+

      Ee Nzambe, na nkanda na yo, kitisá bato ya bikólo.+

       8 Yo moko olobaki ete nazala moto oyo azali kokimakima.+

      Tyá mpisoli na ngai na kati ya molangi na yo ya mposo ya nyama.+

      Yango ezali na kati ya buku na yo te?+

       9 Na ntango yango banguna na ngai bakozonga nsima, na mokolo oyo nakobenga;+

      Nayebi yango malamu, ete Nzambe azali mpo na ngai.+

      10 Lokola nazali na bomoko na Nzambe,+ nakosanzola liloba na ye;

      Lokola nazali na bomoko na Yehova, nakosanzola liloba na ye.+

      11 Natyeli Nzambe motema na ngai. Nakobanga te.+

      Moto ya mabele akoki kosala ngai nini?+

      12 Ee Nzambe, ezali na bilako oyo nasali epai na yo.+

      Nakopesa yo makabo ya botɔndi.+

      13 Mpo obikisi molimo na ngai na liwa+—

      Obikisi makolo na ngai ebɛta libaku te,+ boye te?—

      Mpo natambola epai na epai liboso ya Nzambe na kati ya pole ya baoyo bazali na bomoi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto