Kobima 20:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 “Osengeli te kozala motatoli oyo azali kotatola lokuta mpo na moninga na ye.+ Nzembo 52:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Lolemo na yo, oyo epeli lokola razware, ezali kokana kobimisa minyoko,+Ezali kosala na bokosi.+ Nzembo 52:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Olingi oyo ezali mabe koleka oyo ezali malamu,+Lokuta koleka kolobela boyengebene.+ Sela. Masese 19:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Motatoli ya lokuta akozanga etumbu te,+ mpe ye oyo asopasopaka makambo ya lokuta akobika te.+ Masese 25:18 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 18 Lokola mpengu ya etumba, mopanga mpe likula oyo basebisá, motatoli ya lokuta oyo azali kotatola mpo na kokweisa moninga na ye azali mpe bongo.+ Masese 29:12 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 12 Ntango moyangeli azali kotya likebi na maloba ya lokuta, baoyo nyonso bazali kosalela ye bakozala mabe.+ Ezekiele 22:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Bato oyo bakoselaka bato makambo bazalaki epai na yo, mpo na kosopa makila;+ mpe na kati na yo, balei likoló ya bangomba.+ Bamipesi na etamboli ya nsɔni na kati na yo.+ Matai 26:59 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 59 Na ntango yango banganga-nzambe bakonzi mpe Sanedrina mobimba bazalaki koluka batatoli ya lokuta bákosela Yesu makambo mpo báboma ye,+
18 Lokola mpengu ya etumba, mopanga mpe likula oyo basebisá, motatoli ya lokuta oyo azali kotatola mpo na kokweisa moninga na ye azali mpe bongo.+
12 Ntango moyangeli azali kotya likebi na maloba ya lokuta, baoyo nyonso bazali kosalela ye bakozala mabe.+
9 Bato oyo bakoselaka bato makambo bazalaki epai na yo, mpo na kosopa makila;+ mpe na kati na yo, balei likoló ya bangomba.+ Bamipesi na etamboli ya nsɔni na kati na yo.+
59 Na ntango yango banganga-nzambe bakonzi mpe Sanedrina mobimba bazalaki koluka batatoli ya lokuta bákosela Yesu makambo mpo báboma ye,+