Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 8:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo bino, bokobima na esika oyo bobombanaki, mpe bokozwa engumba yango; Yehova Nzambe na bino akozanga te kopesa yango na mabɔkɔ na bino.+

  • Basambisi 7:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo Yehova alobaki na Gideone boye: “Nakobikisa bino na mibali nkama misato (300) oyo balɛtaki mai, mpe nakopesa Midiane na lobɔkɔ na yo.+ Kasi tiká bato mosusu nyonso bákende moto na moto na esika na ye.”

  • 1 Samwele 14:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo Yonatane alobaki na mosaleli yango, momemi-bibundeli na ye ete: “Yaká tókatisa epai ya mwa etuluku ya basoda oyo bazalaka liboso, bisutu+ wana. Mbala mosusu Yehova akokɔtela biso, mpamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yehova kobikisa, ezala na bato mingi to na bato moke.”+

  • 2 Samwele 5:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe Davidi atunaki+ Yehova boye: “Namata kobunda na Bafilistia? Okopesa bango na lobɔkɔ na ngai?” Na yango, Yehova alobaki na Davidi ete: “Matá, mpo nakopesa solo Bafilistia na mabɔkɔ na yo.”+

  • 2 Bakonzi 3:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe yango ekozala mpenza likambo moke na miso ya Yehova,+ mpe akopesa mpenza Moabe na lobɔkɔ na bino.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto