Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 22:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na yango, mokonzi alobaki na bapoti-mbangu+ oyo batɛlɛmaki pene na ye ete: “Bóbaluka mpe bóboma banganga-nzambe ya Yehova, mpo lobɔkɔ na bango mpe ezali elongo na Davidi mpe mpo bayebaki ete azali kokima, kasi bayebisaki ngai yango na litoi te!”+ Kasi basaleli ya mokonzi baboyaki kosembola lobɔkɔ na bango mpo na kokwela banganga-nzambe ya Yehova.+

  • 1 Samwele 26:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Na nsima, mibali ya Zife+ bayaki epai ya Saulo na Gibea,+ balobi: “Davidi amibombi nde na ngomba moke ya Hakila,+ oyo etalani na Yeshimone*+ te?”

  • Nzembo 54:maloba ya ebandeli ya loyembo-7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo na bibɛtɛlo ya bansinga. Maskile. Ya Davidi. Ntango Bazife bakɔtaki mpe balobaki na Saulo ete: “Davidi amibombi nde epai na biso te?”+

      54 Ee Nzambe, bikisá ngai na nkombo na yo,+

      Mpe na nguya na yo sambá likambo na ngai.+

       2 Ee Nzambe, yoká libondeli na ngai;+

      Tyá mpenza litoi na maloba ya monɔkɔ na ngai.+

       3 Mpo ezali na bapaya oyo babimeli ngai,

      Mpe banyokoli oyo bazali koluka molimo na ngai.+

      Batye Nzambe liboso na bango te.+ Sela.

       4 Talá! Nzambe azali mosungi na ngai;+

      Yehova azali kati na baoyo basungaka molimo na ngai.

       5 Akozongisela banguna na ngai mabe;+

      Na bosolo na yo kangisá bango monɔkɔ.+

       6 Nakopesa yo mbeka na motema moko.+

      Ee Yehova, nakokumisa nkombo na yo mpo yango ezali malamu.+

       7 Mpo abikisaki ngai na mpasi nyonso,+

      Mpe liso na ngai etali banguna na ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto