Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 33:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nabondeli yo, ndimá likabo oyo ezali lipamboli na ngai, oyo namemeli yo,+ mpo Nzambe andimi ngai mpe mpo nazali na eloko nyonso.”+ Mpe akobaki kobondela ye, bongo andimaki yango.+

  • 1 Samwele 25:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Na mbala moko, Abigaile+ asalaki nokinoki mpe azwaki mampa nkama mibale (200), mpe bilokó mibale ya minene ya vinyo,+ mpe bampate mitano oyo babongisi,+ mpe sea mitano ya mbuma oyo batumbi,+ mpe bagato nkama moko (100) ya mbuma ya vinyo,+ mpe bagato nkama mibale ya figi+ oyo bafinafiná mpe atyaki yango likoló ya bampunda.

  • 1 Samwele 30:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Ntango Davidi akómaki na Ziklage, atindelaki mikóló ya Yuda, baninga na ye,+ ndambo ya biloko oyo epunzami, alobi: “Talá likabo+ ya lipamboli napesi bino na biloko oyo epunzami epai ya banguna ya Yehova.”

  • 2 Bakonzi 5:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nsima, azongaki epai ya moto ya Nzambe ya solo,+ ye ná kaa na ye mobimba, mpe ayaki mpe atɛlɛmaki liboso na ye mpe alobaki: “Talá, sikoyo, nayebi mpenza ete Nzambe azali na esika mosusu te na mabele, kaka na Yisraele.+ Mpe sikoyo, nabondeli yo, ndimá likabo ya lipamboli+ oyo euti na mosaleli na yo.”

  • Masese 18:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Likabo oyo moto apesi ekofungolela ye nzela polele,+ mpe ekomema ye ata liboso ya bato minene.+

  • Masese 25:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Soki moto oyo ayinaka yo azali na nzala, pesá ye limpa alya; mpe soki azali na mposa ya mai, pesá ye mai amɛla.+

  • Masese 25:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpo ezali makala ya mɔtɔ nde ozali kotondisa likoló ya motó na ye,+ mpe Yehova ye moko akopesa yo mbano.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto