14 Bongo Davidi akómaki kofanda na esobe, na bisika oyo ezali mpasi mpo na kokóma kuna, mpe azalaki se kofanda na etúká ya ngombangomba, na esobe ya Zife.+ Mpe Saulo azalaki se koluka ye ntango nyonso,+ kasi Nzambe apesaki ye na lobɔkɔ na ye te.+
25 Na yango, Saulo alobaki na Davidi boye: “Opambwama, mwana na ngai Davidi. Okosuka kaka te na kosala makambo ya minene, kasi okolonga mpenza kolonga.”+ Bongo Davidi asimbaki nzela akei; mpe Saulo azongaki na esika na ye.+