Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 1:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpo akiti lelo kopesa mbeka+ ya bangɔmbɛ, bana ya nyama ya mafutamafuta, bampate ebele mpenza mpe mpo na kobengisa bana nyonso ya mokonzi, bakonzi ya basoda ná nganga-nzambe Abiatare;+ mpe kuna bazali kolya mpe komɛla liboso na ye mpe bazali se koloba: ‘Mokonzi Adoniya azala na bomoi!’+

  • 1 Bakonzi 1:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Bongo nganga-nzambe Zadoke azwaki liseke ya mafuta+ na hema+ mpe atyaki Salomo mafuta;+ mpe babandaki koyula liseke, mpe bato nyonso balobaki na mongongo makasi ete: “Mokonzi Salomo azala na bomoi!”+

  • 2 Bakonzi 11:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Na nsima, abimisaki mwana+ ya mokonzi libándá mpe alatisaki ye motole+ mpe atyaki Litatoli+ likoló na ye; bongo bakómisaki ye mokonzi+ mpe batyaki ye mafuta.+ Mpe babandaki kobɛta mabɔkɔ+ mpe koloba: “Mokonzi azala na bomoi!”+

  • Matai 21:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Ebele ya bato yango, oyo bazalaki kotambola liboso na ye mpe oyo bazalaki kolanda ye bazalaki se koganga ete: “Mwana ya Davidi,+ tobondeli yo, bikisá!+ Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama!+ Bikisá, tobondeli yo, kuna na likoló!”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto