33 Mpe kuna tomonaki Banefilime, bana ya Anake,+ oyo bauti na Banefilime; bongo na miso na biso moko tomimonaki lokola makɔnkɔ, mpe ndenge yango nde tomonanaki na miso na bango.”+
3 Mpe asengeli koloba na bango ete: ‘Yoká, Ee Yisraele, bozali kobɛlɛma lelo na etumba mpo na kobunda na banguna na bino. Mitema na bino ebangabanga te.+ Bóbanga te mpe bókima na nsɔmɔ te mpe bólɛnga mpo na bango te,+