Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 20:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “Ntango okobima mpo na kokende na etumba kobunda na banguna na yo mpe okomona mpenza bampunda ná makalo ya bitumba,+ bato ebele koleka yo, osengeli kobanga bango te; mpo Yehova Nzambe na yo azali elongo na yo,+ ye oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito.+

  • Yosua 1:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Napesi yo mitindo te?+ Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. Kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te,+ mpo Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.”+

  • 1 Samwele 17:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Nde mibali nyonso ya Yisraele, ntango bamonaki mobali yango, talá, bakimaki ye mpe babangaki mingi.+

  • Nzembo 27:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Yehova azali pole+ na ngai mpe lobiko na ngai.+

      Nakobanga nani?+

      Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai.+

      Nakozala na nsɔmɔ ya nani?+

  • Yisaya 51:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Ngai—ngai moko nazali Moto oyo azali kobɔndisa bino.+

      “Yo nani mpo obanga moto—mowei mpamba—oyo akokufa,+ mpe mwana ya bato oyo akokóma lokola matiti mpamba ya mobesu?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto