14 Mpe esalemaki boye: mokolo moko, Yonatane,+ mwana ya Saulo alobaki na mosaleli na ye oyo azalaki komemela ye bibundeli ete: “Yaká tókatisa epai ya mwa etuluku ya basoda ya Bafilistia oyo bazalaka liboso, oyo bazali kuna na ngámbo.” Kasi ayebisaki tata na ye likambo yango te.+