22 Mpe ezalaki kosalema boye: na mokolo ya etumba, mopanga+ te to likɔnga ezalaki te na lobɔkɔ ya moto ata moko kati na bato oyo bazalaki elongo na Saulo mpe Yonatane; kaka Saulo+ ná mwana na ye Yonatane nde bazalaki na yango.
49 Mpe bana mibali ya Saulo ezalaki Yonatane,+ Yishivi ná Malaki-shua,+ bongo bankombo ya bana na ye mibale ya basi yango oyo: nkombo ya oyo ya liboso Merabe+ mpe nkombo ya oyo ya leki Mikale.+
18Mpe esalemaki boye: ntango kaka asilisaki koloba na Saulo, molimo ya Yonatane+ ekanganaki+ na molimo ya Davidi, mpe Yonatane akómaki kolinga ye lokola molimo na ye moko.+
7 Nzokande, mokonzi ayokelaki Mefiboshete+ mwana ya Yonatane mwana ya Saulo mawa, mpo na ndai+ ya Yehova oyo ezalaki kati na bango, kati na Davidi ná Yonatane mwana ya Saulo.