25 Na yango Saulo alobaki boye: “Talá oyo bokoloba na Davidi: ‘Mokonzi asepeli na mbongo ya libala te,+ kasi na misutu nkama moko (100)+ ya Bafilistia, mpo azongisela+ banguna ya mokonzi mabe.’” Nzokande Saulo azalaki kokana ete Davidi akwea na lobɔkɔ ya Bafilistia.