Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 13:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “Soki ndeko na yo, mwana ya mama na yo, to mwana na yo ya mobali to mwana na yo ya mwasi to mwasi na yo ya bolingo to moninga na yo oyo azali lokola molimo na yo moko,+ ameki kobenda yo na nkuku, na maloba oyo: ‘Tókende mpe tósalela banzambe mosusu,’+ oyo oyebi te, ezala yo ezala bankɔkɔ na yo,

  • Kolimbola Mibeko 13:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 kasi osengeli mpenza koboma ye.+ Lobɔkɔ na yo ekozala lobɔkɔ ya liboso oyo ekokitela ye mpo na koboma ye, mpe na nsima lobɔkɔ ya bato nyonso.+

  • 1 Bakonzi 12:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Ntango Yisraele mobimba bamonaki ete mokonzi ayokelaki bango te, bato bayanolaki mokonzi boye: “Likabo nini tozali na yango na makambo etali Davidi?+ Mpe tozali na libula moko te na makambo etali mwana ya Yese. Ee Yisraele, kende epai ya banzambe na yo.+ Sikoyo, talelá makambo ya ndako na yo moko, Ee Davidi!”+ Na yango, Yisraele babandaki kokende na bahema na bango.

  • 2 Ntango 10:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Nde Yisraele mobimba, lokola mokonzi ayokelaki bango te, bato bayanolaki mokonzi boye: “Likabo nini tozali na yango na makambo etali Davidi?+ Mpe tozali na libula moko te na makambo etali mwana ya Yese.+ Ee Yisraele, kende moto na moto epai ya banzambe na yo!+ Sikoyo, talelá makambo ya ndako na yo moko, Ee Davidi.”+ Na yango, Yisraele mobimba ebandaki kokende na bahema na yango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto