-
2 Samwele 4:4Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 Nzokande Yonatane+ mwana ya Saulo azalaki na mwana moko ya mobali oyo azalaki kotɛnguma.+ Azalaki na mbula mitano ntango nsango ya Saulo ná Yonatane eutaki na Yizireele;+ bongo mwasi oyo azalaki kobatela ye amemaki ye mpe akimaki, kasi esalemaki boye: ntango azalaki kopota mbangu na nsɔmɔ mpo na kokima, mwana yango akweaki mpe akómaki kotɛnguma. Nkombo na ye Mefiboshete.+
-
-
2 Samwele 9:10Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
10 Mpe okosalela ye bilanga, yo ná bana na yo, ná basaleli na yo, mpe okobuka mbuma, mpe ekozala biloko ya kolya mpo na bato ya nkɔkɔ ya nkolo na yo, mpe bakolya yango; kasi Mefiboshete, nkɔkɔ ya nkolo na yo, ye akolya limpa na mesa na ngai ntango nyonso.”+
Nzokande, Ziba azalaki na bana mibali zomi na mitano mpe na basaleli ntuku mibale (20).+
-