Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 15:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bongo ye, ayaki tii na Lehi, mpe Bafilistia bagangaki na esengo ntango bamonaki ye.+ Nde elimo ya Yehova+ ekómaki kosala kati na ye mpe bansinga oyo ezalaki na mabɔkɔ na ye ekómaki lokola nsinga ya lini oyo eziki na mɔtɔ,+ mpe bikangeli yango enyangwaki mpe elongwaki na mabɔkɔ na ye.

  • 1 Samwele 14:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo Yonatane alobaki na mosaleli yango, momemi-bibundeli na ye ete: “Yaká tókatisa epai ya mwa etuluku ya basoda oyo bazalaka liboso, bisutu+ wana. Mbala mosusu Yehova akokɔtela biso, mpamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yehova kobikisa, ezala na bato mingi to na bato moke.”+

  • 1 Samwele 19:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe atyaki molimo na ye na likama+ mpe abomaki Mofilistia wana,+ bongo Yehova apesaki Yisraele mobimba lobiko moko monene.+ Omonaki yango, mpe osepelaki. Bongo mpo na nini okosalela makila ya moto oyo azali na likambo te lisumu na ndenge okobomisa+ Davidi mpamba?”+

  • 1 Ntango 11:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Kasi ye atɛlɛmaki na katikati ya eteni ya elanga yango, abatelaki yango mpe akobaki koboma Bafilistia, bongo Yehova abikisaki+ na lobiko moko monene.+

  • Nzembo 144:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Ye oyo azali kopesa bakonzi lobiko,+

      Ye oyo azali kopesa mosaleli na ye Davidi bonsomi mpo alongwa na mopanga ya mabe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto