-
1 Bakonzi 19:21Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
21 Bongo azongaki, atikaki kolanda ye mpe na nsima, azwaki bangɔmbɛ mibale oyo bakangisi esika moko mpe abomaki*+ yango, mpe alambaki mosuni na yango na bisaleli ya mabaya oyo bakangisaki+ na bangɔmbɛ mpe na nsima, apesaki yango na bato, mpe babandaki kolya. Nsima na yango, atɛlɛmaki, alandi Eliya mpe abandaki kosalela+ ye.
-
-
1 Ntango 21:23Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
23 Kasi Ornane alobaki na Davidi boye: “Zwá yango, ezala ya yo,+ mpe nkolo na ngai mokonzi asala oyo emonani malamu na miso na ye. Talá, nazali kopesa mpenza bangɔmbɛ+ mpo na makabo ya kotumba, ná eloko ya kotutela+ mpo na nkoni+ mpe blé mpo ezala likabo ya mbuma. Nazali kopesa yango nyonso mpenza.”+
-