Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 4:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “Mpe Arona ná bana na ye ya mibali basengeli kosilisa kozipa esika mosantu+ mpe bisaleli+ nyonso ya esika mosantu, wana kaa ezali kolongwa, mpe nsima na yango, bana mibali ya Kohate bakokɔta mpo na komema yango,+ kasi basengeli te kosimba+ esika mosantu noki bakokufa. Biloko wana ezali mokumba ya bana mibali ya Kohate na hema ya kokutana.+

  • Mitángo 7:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Kasi apesaki bana mibali ya Kohate eloko te, mpo mosala ya esika mosantu ezalaki mokumba na bango.+ Bango bazalaki komema na mapeka.+

  • Yosua 3:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpe kopesa bato mitindo ete: “Ntango bokomona sanduku ya kondimana ya Yehova Nzambe na bino, mpe banganga-nzambe, Balevi, oyo bazali komema yango,+ bokolongwa na esika na bino, mpe bokolanda yango,

  • 1 Ntango 15:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Na ntango yango nde Davidi alobaki boye: “Moto moko te akomema sanduku ya Nzambe ya solo, kaka Balevi, mpo bango nde Yehova aponá mpo na komema sanduku ya Yehova+ mpe kosalela+ ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”

  • 1 Ntango 15:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nsima, bana ya Balevi bamemaki+ sanduku ya Nzambe ya solo na mapeka na bango, na nzete na yango,+ ndenge Moize apesaki mitindo, na kolanda liloba ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto