Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 5:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe talá, nazali na likanisi ya kotongela nkombo ya Yehova Nzambe na ngai ndako,+ ndenge Yehova alakaki tata na ngai Davidi ete: ‘Mwana na yo oyo nakofandisa na kiti na yo ya bokonzi na esika na yo, ye nde akotongela nkombo na ngai ndako.’+

  • 1 Bakonzi 6:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Mpo na ndako oyo ozali kotonga, soki otamboli na mibeko+ na ngai mpe osaleli bikateli na ngai ya lisambisi+ mpe otosi mpenza mitindo na ngai nyonso na kotamboláká na yango,+ ngai mpe nakokokisa mpenza liloba na ngai epai na yo, oyo nalobaki na tata na yo Davidi;+

  • 1 Ntango 17:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Ye nde akotongela ngai ndako,+ mpe nakopika kiti ya bokonzi na ye makasi mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • 1 Ntango 22:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Ye nde akotongela nkombo na ngai ndako,+ mpe ye akozala mwana+ na ngai, mpe ngai nakozala tata+ na ye. Mpe nakopika makasi kiti ya bokonzi+ na ye likoló ya Yisraele mpo na ntango oyo etyami ndelo te.’

  • Zekaria 6:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe ye moko akotonga tempelo ya Yehova, mpe ye akozwa lokumu;+ mpe akofanda mpenza mpe akoyangela na kiti na ye ya bokonzi, mpe akokóma mpenza nganga-nzambe na kiti na ye ya bokonzi,+ mpe boyokani+ ekozala kati na misala yango mibale.

  • Baebre 3:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Kasi Kristo azalaki Mwana+ ya sembo na ndako ya Moto yango. Biso tozali ndako ya Moto yango,+ soki tii na nsuka tozali ntango nyonso koloba polele mpe na bosembo mpe kokangama na makambo oyo ezali kotinda biso tómikumisa mpo na elikya oyo tozali na yango.+

  • 1 Petro 2:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 bino moko mpe lokola mabanga ya bomoi bozali kotongama ndako ya elimo+ mpo na bonganga-nzambe moko mosantu, mpo na kopesa mbeka ya elimo+ oyo Nzambe andimi na nzela ya Yesu Kristo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto