Ruta 1:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Epai okokufa, ngai mpe nakokufa,+ mpe kuna nde nakokundama. Tiká Yehova asala ngai bongo mpe abakisa+ yango, soki eloko mosusu, longola kaka liwa, ekokabola ngai ná yo.” 1 Samwele 18:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Mpe Yonatane ná Davidi basalaki kondimana,+ mpamba te alingaki ye lokola molimo na ye moko.+ 1 Samwele 19:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Kasi Yonatane, mwana ya Saulo, azalaki kosepela na Davidi mingi.+ Bongo Yonatane ayebisaki Davidi ete: “Tata na ngai Saulo azali koluka koboma yo. Sikoyo, nabondeli yo, na ntɔngɔ, kebá mpe fandá mpenza na esika ya kobombana mpe obatama kuna.+ 1 Samwele 20:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Na yango, Yonatane alapelaki lisusu Davidi ndai, mpo na bolingo oyo alingaki ye; mpo azalaki kolinga ye ndenge azalaki kolinga molimo na ye moko.+ 1 Samwele 20:41 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 41 Mosaleli yango akendaki. Bongo Davidi atɛlɛmaki, abimi longwa na esika moko oyo ezalaki penepene wana, na sudi. Na nsima, akweaki elongi na nse+ mpe agumbamaki mbala misato; mpe babandaki kopesana mapwɛpwɛ+ mpe kolelana, tii Davidi alelaki mingi koleka.+ 1 Samwele 23:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Sikoyo, Yonatane mwana ya Saulo atɛlɛmaki mpe akendaki epai ya Davidi na Horeshe kolendisa+ ye atyela Nzambe motema.+ Masese 17:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso,+ mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.+ Masese 18:24 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 24 Baninga mosusu balukaka kosalana mabe,+ kasi moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.+
17 Epai okokufa, ngai mpe nakokufa,+ mpe kuna nde nakokundama. Tiká Yehova asala ngai bongo mpe abakisa+ yango, soki eloko mosusu, longola kaka liwa, ekokabola ngai ná yo.”
2 Kasi Yonatane, mwana ya Saulo, azalaki kosepela na Davidi mingi.+ Bongo Yonatane ayebisaki Davidi ete: “Tata na ngai Saulo azali koluka koboma yo. Sikoyo, nabondeli yo, na ntɔngɔ, kebá mpe fandá mpenza na esika ya kobombana mpe obatama kuna.+
17 Na yango, Yonatane alapelaki lisusu Davidi ndai, mpo na bolingo oyo alingaki ye; mpo azalaki kolinga ye ndenge azalaki kolinga molimo na ye moko.+
41 Mosaleli yango akendaki. Bongo Davidi atɛlɛmaki, abimi longwa na esika moko oyo ezalaki penepene wana, na sudi. Na nsima, akweaki elongi na nse+ mpe agumbamaki mbala misato; mpe babandaki kopesana mapwɛpwɛ+ mpe kolelana, tii Davidi alelaki mingi koleka.+
16 Sikoyo, Yonatane mwana ya Saulo atɛlɛmaki mpe akendaki epai ya Davidi na Horeshe kolendisa+ ye atyela Nzambe motema.+