Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 20:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe osengeli komonisela mosaleli+ na yo motema boboto, mpo okɔtisi mosaleli na yo na kondimana+ liboso ya Yehova. Kasi soki libunga ezali kati na ngai,+ yo moko bomá ngai, mpamba te mpo na nini omema ngai epai ya tata na yo?”

  • 1 Samwele 20:42
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 42 Mpe Yonatane alobaki lisusu na Davidi boye: “Kende na kimya,+ mpo tolapaki ndai,+ biso mibale, na nkombo ya Yehova ete: ‘Yehova ye moko azala kati na ngai ná yo mpe kati na bana na ngai mpe bana na yo, mpo na ntango oyo etyami ndelo te.’”+

      Na yango, Davidi atɛlɛmaki mpe asimbaki nzela akei, mpe Yonatane akɔtaki na engumba.

  • 1 Samwele 23:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Bongo bango mibale basalaki kondimana+ liboso ya Yehova; mpe Davidi atikalaki kaka na Horeshe, nde Yonatane azongaki na ndako na ye.

  • 2 Samwele 9:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe Davidi alobaki boye: “Moto moko atikali na ndako ya Saulo mpo namonisela ye motema boboto+ mpo na Yonatane?”+

  • 2 Samwele 21:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Nzokande, mokonzi ayokelaki Mefiboshete+ mwana ya Yonatane mwana ya Saulo mawa, mpo na ndai+ ya Yehova oyo ezalaki kati na bango, kati na Davidi ná Yonatane mwana ya Saulo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto