-
2 Samwele 13:39Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
39 Nsukansuka, molimo ya mokonzi Davidi eyokaki mposa makasi ya kokende epai ya Abisalome; mpamba te abɔndisamaki na likambo ya Aminone, mpo asilaki kokufa.
-
-
2 Samwele 18:33Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
33 Bongo mokonzi abulunganaki mpe amataki na shambrɛ ya likoló,+ oyo ezalaki likoló ya esika ya kokɔta na porte mpe abandaki kolela; mpe azalaki koloba boye ntango azali kotambola: “Mwana na ngai Abisalome, mwana na ngai, mwana na ngai+ Abisalome! Aa, ebongaki nde ngai nakufa na esika na yo, Abisalome, mwana na ngai, mwana na ngai!”+
-
-
2 Samwele 19:2Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
2 Bongo na mokolo yango, lobiko ekómaki nde kolela epai ya bato nyonso, mpamba te na mokolo yango, bato bayokaki nsango ete: “Mokonzi ayoki mpasi mpo na mwana na ye.”
-