10 Mpe sikoyo, mopanga+ ekolongwa na ndako na yo te mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ mpamba te otyoli ngai ndenge ozwi mwasi ya Uria Mohiti akóma mwasi na yo.’
14 Bongo Abisalome ná mibali nyonso ya Yisraele balobaki ete: “Toli ya Hushai Moarake ezali malamu+ koleka toli ya Ahitofele!” Nzokande Yehova ye moko apesaki mitindo+ ete toli ya Ahitofele ebebisama+ atako ezalaki malamu,+ mpo Yehova amemela Abisalome mpasi.+