Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 14:50
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 50 Mpe nkombo ya mwasi ya Saulo Ahinoame mwana ya Ahimaaze, mpe nkombo ya mokonzi ya basoda na ye Abinere+ mwana ya Nere, ndeko ya tata ya Saulo.

  • 1 Samwele 17:55
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 55 Sikoyo, ntango Saulo amonaki ndenge Davidi azalaki kobima mpo na kokutana na Mofilistia wana, alobaki na Abinere,+ mokonzi ya basoda ete: “Abinere, mwana+ oyo azali mwana ya nani?”+ Na yango Abinere alobaki boye: “Lokola molimo na yo ezali solo na bomoi, Ee mokonzi, nayebi ata moke te!”

  • 1 Samwele 26:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na nsima, Davidi atɛlɛmaki mpe akendaki na esika oyo Saulo atyaki kaa, mpe Davidi amonaki esika Saulo alali, mpe Abinere+ mwana ya Nere mokonzi ya basoda na ye; mpe Saulo alalaki na kati ya lopango ya kaa,+ bongo bato balalaki zingazinga na ye.

  • 2 Samwele 4:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Ntango mwana+ ya Saulo ayokaki ete Abinere akufi na Hebrone,+ mabɔkɔ na ye elɛmbaki+ mpe makanisi ya Bayisraele nyonso ebulunganaki.

  • 1 Bakonzi 2:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpe lisusu, yo moko oyebi malamu makambo oyo Yoabe mwana ya Zeruya asalaki ngai,+ na makambo oyo asalaki bakonzi mibale ya basoda ya Yisraele, ndenge asalaki Abinere+ mwana ya Nere ná Amasa+ mwana ya Yetere+ ntango abomaki bango, mpe na ntango ya kimya asopaki makila+ oyo esengelaki kosopama kaka na ntango ya etumba mpe atyaki makila ya etumba na mokaba oyo ezalaki na loketo na ye mpe na basandale oyo ezalaki na makolo na ye.

  • 1 Ntango 26:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe lisusu, nyonso oyo Samwele momoni-makambo,+ Saulo mwana ya Kishe, Abinere+ mwana ya Nere ná Yoabe+ mwana ya Zeruya+ basantisaki. Shelomite ná bandeko na ye bazalaki kotalela eloko oyo moto nyonso azalaki kosantisa.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto