5 Na nsima Davidi atɛlɛmaki mpe akendaki na esika oyo Saulo atyaki kaa, mpe Davidi amonaki esika oyo Saulo mpe Abinere+ mwana ya Nere, mokonzi ya basoda na ye, balalaki. Saulo alalaki na kati ya lopango ya kaa, bongo basoda balalaki zingazinga na ye.