1 Samwele 26:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Bongo, Abishai alobaki na Davidi boye: “Lelo Nzambe akabi monguna na yo na lobɔkɔ na yo.+ Mpe sikoyo, nabondeli yo, tiká ngai nabaka ye na mabele kaka mbala moko na likɔnga, nakosala yango mbala mibale te.” Luka 9:54 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 54 Ntango bayekoli na ye Yakobo ná Yoane+ bamonaki bongo balobaki ete: “Nkolo, olingi tóyebisa mɔtɔ+ euta na likoló mpe esilisa bango nyɛɛ?” Baroma 12:19 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 19 Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te+ kasi bótikela nde nkanda esika;+ mpo ekomamá ete: “Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe, Yehova alobi bongo.”+
8 Bongo, Abishai alobaki na Davidi boye: “Lelo Nzambe akabi monguna na yo na lobɔkɔ na yo.+ Mpe sikoyo, nabondeli yo, tiká ngai nabaka ye na mabele kaka mbala moko na likɔnga, nakosala yango mbala mibale te.”
54 Ntango bayekoli na ye Yakobo ná Yoane+ bamonaki bongo balobaki ete: “Nkolo, olingi tóyebisa mɔtɔ+ euta na likoló mpe esilisa bango nyɛɛ?”
19 Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te+ kasi bótikela nde nkanda esika;+ mpo ekomamá ete: “Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe, Yehova alobi bongo.”+