Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 1:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Tómata wapi? Bandeko na biso balɛmbisi biso motema,+ balobi: “Tomonaki kuna bato ya minene mpe ya milai koleka biso,+ bingumba minene mpe oyo ebatelami makasi tii na likoló+ mpe lisusu bana ya Baanakime.”’+

  • Yosua 2:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe alobaki na mibali yango ete: “Nayebi mpenza ete Yehova akozanga te kopesa bino mokili oyo,+ mpe nsɔmɔ na bino ekweli biso,+ mpe bato nyonso oyo bafandi na mokili oyo balɛmbi nzoto mpo na bino.+

  • Yosua 7:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe bato ya Ai babomaki mibali soki ntuku misato na motoba (36) kati na bango, mpe balandaki+ bango banda na liboso ya porte tii na Shebarime mpe bakobaki koboma bango nzelanzela wana bazalaki kokita ngomba. Na yango, motema ya bato ya Yisraele ebandaki konyangwa mpe ekómaki lokola mai.+

  • 1 Samwele 17:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Ntango Saulo+ mpe Yisraele mobimba bayokaki maloba ya Mofilistia wana, bayokaki nsɔmɔ mpe babangaki mingi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto