Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 15:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe bapesaki Davidi nsango ete: “Ahitofele azali na kati ya bato oyo bazali kosala likita+ na Abisalome.”+ Na yango, Davidi alobaki+ boye: “Nabondeli yo, Ee Yehova,+ kómisá toli ya Ahitofele bozoba!”+

  • 2 Samwele 15:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Kasi soki ozongi na engumba mpe olobi mpenza na Abisalome ete: ‘Nazali mosaleli na yo, Ee mokonzi. Nazalaki mosaleli ya tata na yo, ɛɛ ngai, na ntango wana, kasi sikoyo, ngai mpenza nazali mosaleli na yo,’+ bongo okobebisela+ ngai toli ya Ahitofele.

  • Yobo 5:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Epai ya Oyo abebisaka myango ya bato ya ekɛngɛ,+

      Bongo mabɔkɔ na bango esalaka eloko te;

  • Masese 19:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Myango ebele ezalaka na motema ya moto,+ kasi mokano ya Yehova nde ekotɛlɛma.+

  • Masese 21:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Bwanya ezali te, bososoli ezali te, toli mpe te wana ezali kotɛmɛla Yehova.+

  • Yisaya 8:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bókana mwango, mpe yango ekobebisama!+ Bóloba ata liloba nini, mpe yango ekosimba te, mpo Nzambe azali na biso!+

  • 1 Bakorinti 3:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpo bwanya ya mokili oyo ezali bozoba na miso ya Nzambe;+ mpo ekomamá ete: “Azali kokanga bato ya bwanya na kati ya mayele mabe na bango moko.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto