Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 11:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nsima na yango, Yehova alobaki ete: “Talá! Bazali kaka ekólo moko mpe bango nyonso bazali monɔkɔ kaka moko,+ mpe talá oyo babandi kosala. Sikoyo, ezali na eloko moko te oyo bakokanisa kosala, oyo bakokokisa te.+

  • Estere 9:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Kasi ntango Estere akɔtaki liboso ya mokonzi, mokonzi alobaki na nzela ya mokanda+ ete: “Mwango+ na ye ya mabe oyo akanaki kosala Bayuda ezongela motó na ye moko”;+ mpe bakakisaki ye ná bana na ye na nzete.+

  • Nzembo 21:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo bameki kosalela yo oyo ezali mabe;+

      Bakanisi makambo oyo bazali na likoki te ya kokokisa.+

  • Masese 16:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Motema ya moto ya mabele ekoki kokanisakanisa nzela na ye,+ kasi Yehova ye moko atambwisaka matambe na ye.+

  • Mosakoli 7:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Talá! namoni kaka likambo oyo: ete Nzambe ya solo asalaki bato sembo,+ kasi bango moko baluki myango mingi.”+

  • Emoniseli 17:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Bango bazali na likanisi kaka moko, yango wana bazali kopesa nyama mabe nguya mpe bokonzi na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto