13 Mpe bóloba na Amasa boye:+ ‘Yo ozali mokuwa na ngai mpe mosuni na ngai te? Na yango, tiká Nzambe asala ngai bongo mpe abakisa yango+ soki okómi te mokonzi ya basoda liboso na ngai libela, na esika ya Yoabe.’”+
10 Nzokande Amasa akebaki te na mopanga oyo ezalaki na lobɔkɔ ya Yoabe; bongo abɛtaki ye+ yango na libumu, mpe misɔpɔ na ye esopanaki na mabele, mpe azalaki kutu na ntina ya kobɛta ye mbala ya mibale te. Mpe akufaki. Bongo Yoabe ná ndeko na ye Abishai balandaki Sheba mwana ya Bikri.