Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 14:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe osengeli kozwa na lobɔkɔ na yo mampa+ zomi, bagato oyo bamwangisá eloko likoló na yango ná molangi moko+ ya mafuta ya nzoi, mpe osengeli kokɔta epai na ye.+ Ye nde akoyebisa yo mpenza makambo oyo ekokómela mwana.”+

  • 2 Bakonzi 5:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nsima, azongaki epai ya moto ya Nzambe ya solo,+ ye ná kaa na ye mobimba, mpe ayaki mpe atɛlɛmaki liboso na ye mpe alobaki: “Talá, sikoyo, nayebi mpenza ete Nzambe azali na esika mosusu te na mabele, kaka na Yisraele.+ Mpe sikoyo, nabondeli yo, ndimá likabo ya lipamboli+ oyo euti na mosaleli na yo.”

  • Yirimia 40:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe ntango azalaki naino kokakatana mpo na kozonga, Nebuzaradane alobaki: “Zongá epai ya Gedalia+ mwana ya Ahikame+ mwana ya Shafane,+ oyo mokonzi ya Babilone apesi mokumba ya kokamba bingumba ya Yuda, mpe fandá na ye kati na bato; to esika nyonso oyo miso na yo emoni malamu kokende, kende.”+

      Mpe mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi apesaki ye ndambo ya biloko ya kolya ná likabo mpe atikaki ye akende.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto