Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 19:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “‘Bosengeli koyiba te,+ mpe bosengeli kokosa te,+ mpe bosengeli te, moto na moto, kosalela moninga na ye makambo oyo ezangi sembo.+

  • Kolimbola Mibeko 18:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Kasi, mosakoli oyo, na lofundo mpenza, azali koloba na nkombo na ngai liloba oyo napesi ye mitindo te ya koloba+ to azali koloba na nkombo ya banzambe mosusu,+ mosakoli yango asengeli kokufa.+

  • Yirimia 29:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 “Tindelá bato nyonso oyo bamemamaki na mboka mopaya+ nsango ete: ‘Talá oyo Yehova alobi mpo na Shemaya moto ya Nehelame: “Lokola Shemaya asakweli bino, nzokande natindaki ye te, mpe ameki kotinda bino bótyela lokuta motema,+

  • Ezekiele 13:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe lobɔkɔ na ngai eyeli basakoli oyo bazali komona bimonaneli ya makambo ya lokuta mpe baoyo bazali kosakola likambo oyo ebombaná ya bokosi.+ Bakotikala lisusu te na kati ya etuluku ya baninga na ngai ya motema,+ bato na ngai, mpe bakokomama te na mokanda ya bankombo ya ndako ya Yisraele,+ mpe bakoya na mabele ya Yisraele te;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+

  • Matai 7:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “Bókeba na basakoli ya lokuta+ oyo bazali koya epai na bino balati mposo ya mpate,+ kasi na kati bazali nde bambwa ya zamba ya lokoso.+

  • 2 Petro 2:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nzokande, ezalaki mpe na basakoli ya lokuta na kati ya bato, ndenge moko mpe ekozala na bateyi ya lokuta na kati na bino.+ Bato wana bakokɔtisa na mayele mwa mangomba oyo ezali kobebisa mpe bakowangana ata nkolo oyo asombaki bango,+ bakomiyeisela libebi nokinoki.

  • 1 Yoane 4:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Bandeko ya bolingo, bóndimaka te liloba nyonso oyo emonani lokola nde euti na Nzambe,+ kasi bómekaka maloba yango mpo na komona soki euti mpenza na ye,+ mpo ebele ya basakoli ya lokuta babimi na mokili.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto