Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 14:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe Yehova alobaki lisusu na ngai boye: “Basakoli bazali kosakola nde lokuta na nkombo na ngai.+ Natindi bango te, napesi mpe bango mitindo te mpe nalobi na bango te.+ Emonaneli ya lokuta, kosakola makambo oyo ebombaná, likambo ya mpambampamba,+ mpe bokosi ya motema na bango, yango nde bazali koloba na bino na maloba ya esakweli.+

  • Yirimia 23:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Natindaki basakoli te, kasi bango moko bapotaki mbangu. Nalobaki na bango te, kasi bango moko basakolaki.+

  • Yirimia 28:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bongo mosakoli Yirimia alobaki lisusu na mosakoli Hanania+ boye: “Nabondeli yo, yoká, Ee Hanania! Yehova atindi yo te, kasi yo moko nde otindi bato oyo bátyela lokuta motema.+

  • Ezekiele 13:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “‘Lokola bolobi lokuta mpe bomoni emonaneli ya bokosi, boye ngai oyo nazali kotɛmɛla bino,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”

  • 2 Petro 2:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nzokande, ezalaki mpe na basakoli ya lokuta na kati ya bato, ndenge moko mpe ekozala na bateyi ya lokuta na kati na bino.+ Bato wana bakokɔtisa na mayele mwa mangomba oyo ezali kobebisa mpe bakowangana ata nkolo oyo asombaki bango,+ bakomiyeisela libebi nokinoki.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto