Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 12:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpe eloko yango ekómaki likambo ya kosalisa bato lisumu,+ mpe bato babandaki kokende tii na Dani mpo na kotɛlɛma liboso ya moko na yango.

  • 1 Bakonzi 16:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe esalemaki boye: lokola nde kotambola na masumu ya Yeroboame+ mwana ya Nebate ezali likambo moke+ mpenza na miso na ye, azwaki lisusu Yezabele,+ mwana ya Etebaala mokonzi ya Basidone,+ azala mwasi na ye+ mpe abandaki kokende kosalela Baala+ mpe kogumbamela ye.

  • 2 Bakonzi 3:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Likambo moko kaka, akangamaki na masumu ya Yeroboame+ mwana ya Nebate, masumu oyo atindaki Yisraele básala.+ Alongwaki na yango te.

  • 2 Bakonzi 10:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe Yehu akebaki te mpo na kotambola na mobeko ya Yehova Nzambe ya Yisraele na motema na ye mobimba.+ Alongwaki te na masumu ya Yeroboame, oyo atindaki Yisraele básala.+

  • 2 Bakonzi 13:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe azalaki se kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova+ mpe kolanda lisumu ya Yeroboame+ mwana ya Nebate, oyo atindaki Yisraele básala.+ Alongwaki na yango te.

  • 2 Bakonzi 17:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpo alongolaki Yisraele na ndako ya Davidi, mpe bakómisaki Yeroboame mwana ya Nebate mokonzi; mpe Yeroboame+ apɛngwisaki Yisraele bátika kolanda Yehova, mpe atindaki bango básala lisumu moko monene.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto