-
Nzembo 51:maloba ya ebandeli ya loyembo-19Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi. Ntango Natane mosakoli akɔtaki epai ya Davidi wana asilaki kosangisa nzoto na Bate-sheba.+
51 Ee Nzambe, moniselá ngai boboto na kolanda motema boboto na yo.+
Longolá misala na ngai ya kobuka mibeko na kolanda motema mawa oyo otondi na yango.+
3 Mpo ngai moko nayebi misala na ngai ya kobuka mibeko,+
Mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso.+
4 Nasaleli yo lisumu, kaka yo moko,+
Mpe nasali oyo ezali mabe na miso na yo,+
Mpo yo omonana moyengebene ntango ozali koloba,+
Mpo yo ozala na libunga te ntango ozali kosambisa.+
6 Talá! Yo osepeli na bosolo oyo ezali na kati ya motema;+
Mpe na kati na ngai moko osala ete nayeba bwanya mpenza.+
7 Pɛtolá ngai na izope nalongwa na lisumu, mpo nazala pɛto;+
Sukolá ngai, mpo nakóma mpɛmbɛ mingi koleka nɛjɛ.+
10 Ee Nzambe, zalisá motema ya pɛto na kati na ngai,+
Mpe tyá kati na ngai elimo ya sika, oyo ezali ngwi.+
14 Ee Nzambe, bikisá ngai na ngambo ya makila,+ Nzambe ya lobiko na ngai,+
Mpo lolemo na ngai eyebisa boyengebene na yo na esengo.+
16 Mpo yo ozali kosepela na mbeka te—soki osepelaka na yango, nalingaki kopesa yango;+
Yo ozali kosepela te na likabo ya kotumba mobimba.+
-