Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 65:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Otyeli mabele likebi na yo, mpo opesa yango biloko ebele;+

      Ozali kokómisa yango na bozwi mingi mpenza.

      Yo Nzambe ozali kotondisa mikɛli na mai.+

      Ozali kobongisa mbuma na yango,+

      Mpo ezali ndenge wana nde ozali kobongisa mabele.+

  • Nzembo 65:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Banzela ya mikala na yango ezali kopɔlisama na mai, mabele na yango oyo ekangamakangamá ezali kolalisama;+

      Ozali kolɛmbisa yango na mbula monene; ozali kopambola milona na yango ya sika.+

  • Yirimia 14:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Na bikeko ya mpamba+ ya bikólo ezali nde na moko oyo ekoki konɔkisa mbula, to likoló yango moko ekoki nde kopesa mbula monene?+ Yo ozali Ye te, Ee Yehova Nzambe na biso?+ Mpe tozali kolikya epai na yo, mpo yo moko nde osali biloko oyo nyonso.+

  • Matai 5:45
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló,+ mpo abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto