12 Yehova akofungolela yo ndako na ye malamu ya kobomba biloko, elingi koloba likoló, mpo na kopesa mbula na mokili na yo na eleko na yango+ mpe mpo na kopambola mosala nyonso ya lobɔkɔ na yo;+ mpe okodefisa mpenza bikólo mingi, nzokande yo okodefa te.+
23 Mpe akopesa mpenza mbula mpo na momboto na yo oyo ozali kolona na mabele,+ mpe mbuma ya mabele nde mampa, oyo ekokóma mpenza na mafuta mpe ekozala mafutamafuta.+ Na mokolo yango, bibwɛlɛ na yo ekolya na esika monene ya kolya matiti.+
23 Mpe bino bana ya Siona, bózala na esengo mpe bósepela mpo na Yehova Nzambe na bino;+ mpo akozanga te kopesa bino mbula ya eleko ya otɔnɛ na ndenge oyo ekoki,+ mpe akonɔkisela bino mbula makasi, mbula ya eleko ya otɔnɛ mpe mbula ya eleko ya prɛnta, lokola na ebandeli.+