Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 20:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Osengeli te kogumbamela yango to kobendama mpo na kosalela yango,+ mpamba te ngai Yehova Nzambe na yo, nazali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye,+ nayeisaka etumbu mpo na libunga ya batata likoló ya bana, likoló ya libota ya misato mpe likoló ya libota ya minei ya baoyo bayinaka ngai;+

  • Yosua 24:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Nde soki emonani mabe na miso na bino kosalela Yehova, bópona bino moko lelo nani bino bokosalela,+ soki banzambe oyo bankɔkɔ na bino oyo bazalaki na ngámbo mosusu ya Ebale basalelaki+ to banzambe ya Baamore oyo bozali kofanda na mokili na bango.+ Kasi mpo na ngai mpe bato ya ndako na ngai, tokosalela Yehova.”+

  • 1 Samwele 7:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe Samwele alobaki na ndako mobimba ya Yisraele ete: “Soki ezali na motema na bino mobimba nde bozali kozongela Yehova,+ bólongola kati na bino banzambe ya bapaya+ mpe bikeko ya Ashitorete,+ mpe bóbalusa motema na bino mobimba epai ya Yehova mpe bósalela kaka ye,+ mpe ye akobikisa bino na lobɔkɔ ya Bafilistia.”+

  • Nzembo 100:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Bóyeba ete Yehova azali Nzambe.+

      Ye nde asalaki biso, kasi biso moko te.+

      Tozali bato na ye mpe bampate na esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto