Masese 31:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Ebongi na bakonzi te, Ee Lemuele, ebongi na bakonzi te komɛla vinyo to na bankumu koloba ete: “Wapi masanga oyo elangwisaka?”+ Mosakoli 10:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Ee mokili, esengo na yo ntango mokonzi na yo azali mwana ya bato ya lokumu mpe bankumu na yo balyaka na ntango oyo esengeli mpo na kozwa nguya, kasi bamɛlaka mingi te.+ Hosea 4:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Pite, vinyo ná vinyo ya elɛngi, yango nde biloko oyo elongolaka makanisi* ya malamu.+
4 Ebongi na bakonzi te, Ee Lemuele, ebongi na bakonzi te komɛla vinyo to na bankumu koloba ete: “Wapi masanga oyo elangwisaka?”+
17 Ee mokili, esengo na yo ntango mokonzi na yo azali mwana ya bato ya lokumu mpe bankumu na yo balyaka na ntango oyo esengeli mpo na kozwa nguya, kasi bamɛlaka mingi te.+