-
2 Ntango 14:2Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
2 Mpe Asa asalaki oyo ezali malamu mpe sembo na miso ya Yehova Nzambe na ye.
-
-
2 Ntango 14:11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 Mpe Asa abandaki kobelela Yehova Nzambe na ye+ mpe koloba boye: “Ee Yehova, ezala bato bazali mingi, ezala bazali na makasi te, yo osalisaka kaka.+ Salisá biso, Ee Yehova, Nzambe na biso, mpo totyeli yo motema,+ mpe toyei kobunda na ebele ya bato oyo na nkombo na yo.+ Ee Yehova, yo ozali Nzambe na biso.+ Moto—mowei mpamba—azala na makasi te ya kobunda na yo.”+
-
-
2 Ntango 15:8Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
8 Mpe ntango kaka Asa ayokaki maloba oyo mpe esakweli ya mosakoli Odede,+ azwaki mpiko mpe alimwisaki biloko ya bosɔtɔ+ na mokili mobimba ya Yuda mpe ya Benyamina mpe na bingumba oyo azwaki na etúká ya ngombangomba ya Efraime,+ mpe abongisaki etumbelo ya Yehova oyo ezalaki liboso ya ndako ya kokɔtela ya Yehova.+
-