Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 17:45
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 Bongo Davidi alobaki na Mofilistia boye: “Ozali koyela ngai na mopanga, na likɔnga mpe na likɔnga+ moke, kasi ngai, nazali koya epai na yo na nkombo ya Yehova ya mampinga,+ Nzambe ya milɔngɔ ya etumba ya Yisraele, oyo yo otumoli.+

  • 2 Ntango 13:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe talá! Nzambe ya solo azali liboso na biso+ elongo na banganga-nzambe+ ná bakelelo ya koyokisa elembo+ ya kokebisa bino mpo na etumba. Ee bana ya Yisraele, bóbunda na Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino te,+ mpo bokolonga te.”+

  • Nzembo 20:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Tokoganga na esengo mpo na lobiko na yo,+

      Mpe na nkombo ya Nzambe na biso tokotombola babɛndɛlɛ na biso.+

      Yehova akokisa nyonso oyo ozali kosɛnga.+

  • Masese 18:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi.+ Moyengebene akimaka mpo na kokɔta kuna mpe azwaka libateli.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto