18 Na mokolo yango, Yehova asalaki kondimana ná Abrama,+ na maloba oyo: “Nakopesa momboto na yo mokili oyo,+ banda na ebale ya Ezipito* tii na ebale monene, ebale Efrate:+
31 “Mpe nakotya bandelo na yo banda na Mbu Motane tii na mbu ya Bafilistia mpe banda na esobe tii na Ebale;+ mpamba te nakopesa bato oyo bafandi na mokili yango na lobɔkɔ na bino, mpe okobengana mpenza bango liboso na yo.+
24 Esika nyonso oyo lokolo na bino ekonyata, ekokóma ya bino.+ Ndelo na bino ekozala banda na esobe tii na Libá, banda na Ebale, ebale Efrate, tii na mbu ya wɛsti.+
16 Ntango bato ya Siri bamonaki ete Yisraele alongi+ bango, batindaki bamemi-nsango mpe bayaki na bato ya Siri oyo bazalaki na etúká ya Ebale,+ mpe Shofake mokonzi ya basoda ya Hadadezere azalaki liboso na bango.