Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 2:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 talá, nazali kotongela+ nkombo+ ya Yehova Nzambe na ngai ndako mpo na kosantisela+ ye yango, mpo na kotumba mpaka ya malasi ya nsolo kitoko+ liboso na ye, ná mampa ya ntango nyonso oyo bamatisamatisá likoló ya mosusu+ ná makabo ya kotumba na ntɔngɔ mpe na mpokwa,+ na basabata,+ na basanza ya sika+ mpe na bileko ya fɛti+ ya Yehova Nzambe na biso. Yango ekozala mokumba ya Yisraele mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • 2 Ntango 7:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe Mokonzi Salomo apesaki mbeka: ngɔmbɛ nkóto ntuku mibale na mibale (22 000) mpe mpate nkóto nkama moko na ntuku mibale+ (120 000). Bongo mokonzi ná bato nyonso bafungolaki+ ndako ya Nzambe ya solo.

  • Ezera 6:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe bana ya Yisraele, banganga-nzambe ná Balevi+ mpe bato mosusu na baoyo kala bamemamaki na mboka mopaya+ basalaki molulu ya bofungoli+ ya ndako yango ya Nzambe na esengo.

  • Nehemia 12:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe na ntango ya bofungoli+ efelo ya Yerusaleme balukaki Balevi, bazwaki bango na bisika na bango nyonso mpe bamemaki bango na Yerusaleme mpo na kosala milulu ya bofungoli mpe kosepela, ɛɛ, na matɔndi+ mpe na loyembo,+ na sɛmbalɛ ná bibɛtɛlo ya bansinga+ mpe na banzɛnzɛ.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto