-
Nzembo 30:maloba ya ebandeli ya loyembo-12Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Mondule. Loyembo ya molulu ya bofungoli ndako.+ Ya Davidi.
30 Ee Yehova, nakokumisa yo mpo omatisi ngai+
Mpe otiki te ete banguna na ngai básepela mpo na ngai.+
2 Ee Yehova Nzambe na ngai, nalelelaki yo mpo na kosɛnga lisalisi, mpe obikisaki ngai.+
5 Mpo nkanda oyo ayokelaka moto ezalaka mpo na mwa ntango,+
Soki asepeli na moto ezali mpo na bomoi mobimba.+
Na mpokwa kolela ekoki kofanda epai na biso,+ kasi na ntɔngɔ, koganga ya esengo.+
7 Ee Yehova, lokola osepeli na ngai, otɛlɛmisi ngomba na ngai na bokasi.+
Obombaki elongi na yo; nabulunganaki.+
-