-
Nzembo 60:maloba ya ebandeli ya loyembo-12Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo mpo na Fololo lísi ya Bokundoli. Mikitame. Ya Davidi. Mpo na koteya.+ Ntango abundaki na Arame-naharaime ná Arame-Zoba, mpe Yoabe azongaki mpe abɛtaki Edome na Lobwaku ya Mungwa, ɛɛ bato nkóto zomi na mibale (12 000).+
6 Nzambe ye moko alobi na kati ya bosantu na ye+ ete:
“Nakosepela makasi, nakopesa Shekeme ezala likabo;+
Mpe nakomeka bonene ya lobwaku ya patatalu ya Sukote.+
7 Gileade ezali ya ngai mpe Manase ezali ya ngai,+
Mpe Efraime ezali ndako ya makasi ya nkumu na ngai;
Yuda ezali lingenda na ngai ya komanda.+
8 Moabe ezali nzungu na ngai ya kosukola.+
Nakobwakela Edome sandale na ngai.+
Nakoganga ete nalongi Filistia.”+
-