Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 18:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Epai na yo moto azwama te oyo azali kolekisa mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi mbeka na mɔtɔ,+ moto oyo azali kosakola makambo oyo ebombaná,+ moto ya misala ya maji+ to moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya+ to moto oyo azali nganga-nkisi,+

  • 2 Ntango 33:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe ye moko alekisaki bana na ye mbeka na mɔtɔ+ na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpe asalaki misala ya maji+ mpe asalelaki misala ya kosakola makambo oyo ebombaná+ mpe asalaki misala ya bonganga-nkisi+ mpe atyaki bato oyo basololaka na bilimo+ ná bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.+ Asalaki makambo mingi mpenza ya mabe na miso ya Yehova, mpo na kosilikisa ye.+

  • Mika 5:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe nakolongola misala ya bonganga-nkisi na lobɔkɔ na yo, mpe okozala lisusu na bato ya misala ya maji te.+

  • Misala 16:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe esalemaki ete ntango tozalaki kokende na esika ya mabondeli, mwana mwasi moko ya mosala oyo azalaki na elimo moko,+ demo moko ya kosakola makambo oyo ebombaná,+ akutanaki na biso. Azalaki kokɔtisela bankolo na ye mosolo mingi+ na mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto