Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 17:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 mpe bazalaki kolekisa bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi mbeka na mɔtɔ+ mpe kosakola makambo oyo ebombaná+ mpe koluka bilembo ya makambo oyo ekoya,+ mpe bazalaki se komitɛka+ mpo na kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, mpo na kosilikisa+ ye;

  • 2 Ntango 28:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe abimisaki milinga ya mbeka+ na lobwaku ya mwana ya Hinome+ mpe akómaki kotumba bana na ye+ na mɔtɔ, na kolanda makambo oyo eyinamá+ ya bikólo oyo Yehova abenganaki liboso ya bana ya Yisraele.+

  • Nzembo 106:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpe bazalaki kokaba bana na bango ya mibali+

      Mpe bana na bango ya basi mbeka epai ya bademo.+

  • Yisaya 57:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 baoyo balamwisaka mposa makasi na banzete minene,+ na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa,+ bazali koboma bana na mabwaku ya mikɛli, na nse ya madusu ya mabanga, boye te?+

  • Ezekiele 20:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe ntango bozali kotombola makabo na bino na ndenge bozali kolekisa bana na bino mbeka na mɔtɔ,+ kino lelo bozali nde komikómisa mbindo mpo na bikeko na bino nyonso ya bosɔtɔ?+ Ntango bozali kosala bongo, nakotika nde bino bótuna ngai, Ee ndako ya Yisraele?”’+

      “‘Lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘nakotika te ete bótuna ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto