Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 14:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Ata banzete ya jenevriye+ mpe esepeli mpo na yo, banzete ya sɛdrɛ ya Libá, elobi: ‘Banda olalá, mokati-nzete+ ata moko te ayaka kokata biso.’

  • Yisaya 37:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Na nzela ya basaleli na yo, otumoli Yehova mpe ozali koloba ete:+

      ‘Na ebele ya makalo na ngai ya bitumba, ngai moko+—

      Nakomata mpenza tii na nsɔngɛ ya bitúká ya ngombangomba,+

      Bansukansuka ya Libá;+

      Mpe nakokata basɛdrɛ na yango ya milai, banzete na yango ya jenevriye+ ya kitoko mingi.

      Mpe nakokóma tii na nsɔngɛ na yango oyo eleki likoló, zamba ya elanga na yango ya banzete ya mbuma.+

  • Yisaya 60:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Nkembo ya Libá ekoya epai na yo, nzete ya jenevriye, nzete ya frɛnɛ mpe nzete ya siprɛ kaka na mbala moko,+ mpo na kokómisa esika na ngai mosantu kitoko;+ mpe nakokumisa esika ya makolo na ngai.+

  • Ezekiele 31:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Banzete mosusu ya sɛdrɛ ekokanaki na yango te na elanga ya Nzambe.+ Bongo banzete ya jenevriye ekokanaki ata moke te na bitape na yango. Mpe banzete ya platane ezalaki lokola yango te na oyo etali bitape. Nzete mosusu te na elanga ya Nzambe ekokanaki na yango mpo na kitoko na yango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto