27 Mpe Hizikiya akómaki na bomɛngo mpe na nkembo mingi mpenza;+ mpe amisalelaki bandako ya kobomba biloko mpo na palata mpe mpo na wolo,+ mpo na mabanga ya ntalo,+ mpo na mafuta ya balsame,+ mpo na banguba+ mpe mpo na biloko nyonso ya kitoko;+
23 Talá oyo Yehova alobi: “Moto ya bwanya amikumisa te mpo na bwanya na ye,+ mpe moto ya nguya amikumisa te mpo na nguya+ na ye. Moto ya bomɛngo amikumisa te mpo na bomɛngo+ na ye.”